Banzembo. 43. Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngai liboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te ; kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe ya bato mabe. Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai, oyo batonga makasi ; mpo na nini osundoli ngai ? Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye, na se ya minyoko ya monguna ? Tinda mwinda mpe solo na Yo mpo ete ekamba mpe emema ngai na ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka ; bongo nakokende na etumbelo epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai. Oh Yawe, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda. Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai.