Banzembo. 67. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo. Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye ; mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili, mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso. Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo ! Tika ete bato basepela, tika ete babeta milolo ya esengo, pamba te okambaka bikolo na bosembo, mpe otambolisaka bato awa na mabele. Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo ! Mabele eboti bambuma na yango ; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso. Tika ete Nzambe apambola biso ; tika ete mokili mobimba etosa Ye !