Banzembo. 70. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe. Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai ! Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai ! Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai bakufa soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai bazonga sima mpe bayokisama soni ! Tika ete bato oyo balobaka na ngai : « Ah ! Ah ! » bazonga mpo na soni ! Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Nzambe azali monene ! » Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela, Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai. Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai, kowumela te !