Banzembo. 82. Nzembo ya Azafi. Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye, azali kokata makambo kati na banzambe. Kino tango nini bokokata makambo na bosembo te mpe bokokotela bato mabe ? Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola ; bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe. Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili ; miboko nyonso ya mokili ezali koningana. Nalobaki : « Bozali banzambe, bozali bino nyonso bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ! » Nzokande, bokufaka lokola bato nyonso mpe bokweyaka lokola bakambi. Nzambe, telema, sambisa mokili ; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.