Banzembo. 117. Bino bato ya bikolo nyonso, bokumisa Yawe ! Bino bato ya mabota nyonso, bopesa Ye nkembo ! Pamba te bolingo na Ye mpo na biso ezali monene, mpe bosembo ya Yawe ewumelaka seko na seko. Bokumisa Yawe !