Banzembo. 121. Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba : lisungi na ngai ekowuta wapi ? Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele. Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ; Ye oyo abatelaka yo animbaka te. Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te ! Yawe azali mobateli na yo ; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo. Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te ! Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo ; Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.