Banzembo. 136. Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu ; Bosanzola Nzambe ya banzambe ; Bosanzola Nkolo na bankolo ; Ye kaka nde asalaka bikamwa ya minene ; Akelaki likolo na mayele na Ye ; Atandaki mabele na likolo ya mayi ; Akelaki biloko minene oyo ebimisaka pole ; moyi mpo na kongengisa mokolo ; sanza mpe minzoto mpo na kongengisa butu ; Abomaki bana mibali ya liboso ya Ejipito ; Abimisaki Isalaele wuta na Ejipito ; na nguya monene ya loboko na Ye ; Akabolaki ebale monene ya Barozo na biteni mibale ; Alekisaki Isalaele na kati-kati ya ebale monene ya Barozo ; Azindisaki Faraon elongo na mampinga na ye kati na ebale monene ya Barozo ; Atambolisaki bato na Ye kati na esobe ; Abetaki bakonzi minene ; Abomaki bakonzi ya nguya ; Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ; mpe Ogi, mokonzi ya Bashani ; Akabaki mabele na bango lokola libula ; lokola libula epai ya Isalaele, mosali na Ye ; Akanisaki biso tango basambwisaki biso ; Akangolaki biso wuta na maboko ya banguna na biso ; Apesaka bilei na bikelamu nyonso ; Bosanzola Nzambe ya likolo ;