Banzembo. 150. Bokumisa Yawe ! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi ! Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye ! Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo ! Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ; bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda ! Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina ! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite ! Bokumisa Ye na lokito ya manzanza ! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene ! Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe ! Bokumisa Yawe !